Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya míneyi (4) Makabo oyo tozwaka • 65

Molimo Mosanto afandi kati na ngai, azali komonisa ngai nzela mpe kolendisa ngai nasala mosala na bonsomi nyonso, mpe na kotiaka motema mpo ete Lingomba ekola na bomoko, mpe ekemba na lokumo na Nzambe.

Kondima

John Chrysostom (349-407) azalaki mokambi monene na Lingomba ya ebandeli, ayebanaki na mateya na ye ya kafu-kafu mpe elobeli kitoko na ye liboso ya bitonga ya bato libanda. Na bongo bapesaki ye kombo mosusu (Chrysostom), kombo ewuti na lokota ya bai-Ngeleki (to les grecs na lifalanse) « Chrysostomos » elingi koloba monoko mosálémá na wólo (une bouche dorée) Libondeli mpo na kosenga mawa. Liturgie slavonic ya Jean Chrysostom Na ntango ya kimia, tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na kimia ewuti likolo, mpe mpo na bomoyi ya milimo na biso, Tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na kimia ya mokili mobimba, mpo na ezaleli ya Lingomba esanto ya Nzambe, mpe mpo na lisanga ya banso, tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na ndako esanto oyo, mpe mpo na baye, na kondima na bango, Na botosi, bobangi ya Nzambe bakoti na yango, tobondela Nkolo Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na bakengeli (to ba episikopo) na biso mpe banganga-nzambe misusu mpe basali misusu baye bamipesi na misala esengeli basala, Tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na ekolo na biso, na bato banso kati na yango, mpe baye bazwa bokonzi ya kokamba yango, Tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. Mpo na engumba oyo mpe mpo na bingumba nyonso mpe bikolo, mpe mpo na baye bandima kati na yango, Tobondela Nkolo. Nkolo, yokela biso mawa. ~ Roger Geffen. The Handbook of Public Prayer. p.115. O, Molimo na Nzambe, Molimo ya Tata, ya Mwana Yesu Klisto, Yo ozali Nzambe, moto ya misato na Nzambe Moko ya Bato Misato (to Trinité na lifalanse). Yo ozali Molimo ya bosôló, ya bolingo, mpe ya bosanto. Toyebi ete Tata atindaki Yo epayi na biso mpo Nkolo na biso Yesu asengaki Yo mpo na biso. Lokola nandimelaki Yesu, Yo oye epayi na ngai, nabondeli Yo sikoyo mpe nasambeli Yo mpe nalingi Yo na motema na ngai mobimba.

Libondeli

kolela na motema epayi na Nkolo

Made with FlippingBook - Share PDF online