Bunda etumba elamu ya kondima
66 • Bunda etumba elamu ya kondima
Matondi lokola ofandi kati na ngai, lokola opesi elembo ete nazala mwana na Nzambe mpenza, mpe lokola oteyi ngai Liloba na Nzambe mpo nayeba mpe naluka Nzambe lokola pole na ngai mpe makasi na ngai. Yo ozali makasi na ngai. Tondisa motema na ngai na bolingo ya Nkolo, mpe na bobangi ya Nzambe. Tambwisa ngai na banzela ya Nkolo, mpe longisa ngai na mposa nyonso ya masumu, to ya kobosana oyo olingaka mpe mosala na Yo. Pesa ngai kokanga motema mpe pole na makambo, mpo nakweya na masumu te ; mpe bakisela ngai kondima, mpo nakangama na Yo, mpe natalela Yo mpe na nzela na Yo nazala lokola Yesu Nkolo na ngai. Na bongo bongola bomoyi na ngai mpo ekoma bomoyi ya bosanto, bomoyi oyo obengelaki ngai nabikela. Sunga ngai, nabondeli Yo Tata na lola, na makambo nyonso. Yo ozali liziba na ngai, oyo lisanga na Yesu mpe na Molimo, bozali kokonza lokola Nzambe moko. Na nzela na Yesu, Nkolo na ngai, nabondeli bongo. Amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni oyo ebulisami na bisika ebakisaka boyebi na nzela ya makomi mpe kotala na miso. Kende na www.tumiproductions.bandcamp.com mpo na kobimisa loyembo « Molimo na Nzambe », loyembo mpo na koluka nguya ya Molimo Mosanto na bomoyi na yo. Foster, Richard J. and James Bryan Smith Eds. Dévouements Classiques : Edition Révisé : Lectures sélectionnées pour les individus ou pour les groupes. Renovare, Inc. (Harper Collins Publishers), New York. 1993. Na liyangani oyo ezali koya, bokokuta makambo eleki malamu oyo totalisaka, bakisa na ntina ya makambo oyo : 1. Tosengeli tomekola Nzambe lokola bana ya bolingo. 2. Lokola basali, tosengeli kotalisa Nzambe lokola libota esanto ezali kokanisa bolamo na Ye. 3. Tozali na lotomo ya kobika lobiko ya bolingo mpe ya bosalisi basusu.
Mateya ya kokoba
Mpo na mayangani ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
Filipi. 2 :13
Made with FlippingBook - Share PDF online