Bunda etumba elamu ya kondima
L iteya ya mítano (5) M akambo eleki malamu oyo totalisaka Kobika lokola basantu ya Nzambe mpe batalisi Kristo na mokili
Na bongo bózala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami. Botambolaka mpe na bolingo lokola Klisto alingaki bino mpe amikabi Ye mpenza lokola mbeka ya kotombwa mpe moboma ya solo malamo epayi na Nzambe. Tika te ete boloba nkombo ya bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela*; ebongi bongo na Babulami *. Tika te ete bosoto bozala to maloba na zoba to maloba ya mpamba, kasi eleki malamu kopesa matondi. Boyeba likambo oyo solo solo ete moto na pité te mpe moto na bosoto te mpe moto na bilulela te (ye mosambeli na bikeko *) azali na libula kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe. Na suka ya liyangani oyo, bosengeli kokutana na makambo eleki malamu oyo totalisaka na kondimaka ete : • Tozali bamekoli ya Nzambe, lokola bana na Ye ya bolingo. • Lokola basanto na Klisto, tosengeli kotalisa Nzambe liboso ya basusu lokola bana basanto na Ye mpenza, libota oyo ezali kokanisa bolamu na Ye. • Mpe lokola batalisi tosengeli kokabola Nsango Malamo ya bomoyi na mabota mpe bazalani misusu, na komonisaka yango na misala malamo ya bolingo ya Klisto na kosalisaka basusu. *Bilulela – Bilulela eleki kolula pamba. Ezali nde bilinga-linga, kolula oyo ezangisaka mayele mpo na koluka eloko to moto (mwasi to mobali) nyonso ya moninga mosusu ékoma bobele ya yo. Ezali lokoso ya kosalela mayele mabe (nkanza, lokuta, moyibi …) mpo na kobotola mpe komizwela bizweli ya baninga ékoma ya yo. *Mosanto - Mosanto to mobulami azali moto atiami pembeni ete atikala bobele mpo na misala mpe losambo na Nzambe. Bato mingi basosolaka te mpe bakanisaka nde na ntina na lolenge malamu ya moto ekesani na bato misusu to na lolenge na ye ya kosambela. Kasi liloba « mosan to » to « kosantisa » to mpe « kobulisa » elingi koloba bobele eloko oyo ebatelami bobele mpo na likambo to ntina songolo. Ndakisa soki ozali na monkoto to sapato to elamba mpo na káká ebima na ntango ya nteke to feti, okolata yango na likambo mosusu te. Ndenge moko Basanto bazali bato lokola bato nyonso kasi Nzambe abulisa bango mpo na misala mpe losambo na Ye. *Baidola to mogumbameli bikeko – Moto to mogumbameli bikeko azali moto oyo asambelaka eloko ekelama na esika ya kosambela Nzambe mokeli. Lokola bato wana balingi bomoyi na ban go ebonga, mpe bazala na mikakatano te, bango wana basalaka nyonso bameka kotia makambo nyonso na nse ya makolo na bango na lisungi ya nguya eyebani te. Yango wana bato basambela ka bikeko, mbula, bilanga, bongo na bongo na esika ya kosambela moyemi Nzambe. Mosambeli baidola azali moto oyo amilukelaka bosenga na ye bipayi misusu kasi na Nzambe te. Paulo na Baefeso (Baefeso 5 :1-5)
Mposa ya kokokisa nsima ya liteya
69
Made with FlippingBook - Share PDF online