Bunda etumba elamu ya kondima
70 • Bunda etumba elamu ya kondima
Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya
Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na Yo ete ozali liziba ya bwanya mpe boyebi nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli yo lakisa ngai mpe teya ngai nzela nakolanda (Nze.32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na Yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soko nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya, milimo mpe makabo ya Nzambe ya solo mpe na oyo ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na Yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na Yo na motema mobimba. Nkolo ya bolingo, nabondeli Yo sunga ngai nayokamela mpe noyoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Yak.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai endimama na miso na Yo. Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na Yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. « Epayi wapi nakoki kozwa makasi ya kosala bongo, nalingi koloba kozala lokola ye ? » Na kozongisaka miso na bomoyi na ye ya kala, εlεngε mobali ya moklisto moko azalaki na lisanga ya babandí baye bayinaki bato ya loposo kokesana, na koleka « mindele ». Nyonso ye na baninga basalaki, nyonso balobaki, nyonso balingaki bobele kokana mindele mpo na mabe nyonso basala bato mosusu na mokili. Lisanga wana bamibulisaki bobele bazongisa mabe epayi ya mindele mpo banyokolaki bato mingi, bayokisaki bato mpasi mingi ntango nyonso mpe na ndenge nyonso bakokaki kosala. Kasi ntango elenge moklisto wana ayamboli masumu, abongwani mpe andimeli Klisto, asundolaki lingomba wana ya koyina mindele mpe amipesáki na lolenge nini akoki komibatela ete azonga lisusu na ezaleli ya kala ya mabe ya koyina, koloba mabe, mpe kotuka mindele te. Sima ya kobunda na makanisi wana mpo na kamwâ ntango, amilobeli : Nalingi lisusu ezaleli na ngai wana ya kala te, nalingi sikoyo nasosola malamu ete Yesu alingi ngai nazala lokola Ye. Bongo sikoyo epayi wapi nakozwa makasi ya kosala lokola Ye; nalingi koloba, kokoma lokola Ye? Sikoyo, liteya nini okoki kopesa na elenge wana na etumba oyo azali kobunda na makanisi na ye ? 2. « Nanu nakómá moyengebeni te mpe nabanzi nakozala moto ya motindo wana te. Ngai nákóma moyengebeni ? » Na lisanga ya bayekoli
Bokutani
Made with FlippingBook - Share PDF online