Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mítano (5) Makambo eleki malamu oyo totalisaka • 71

Biblia, elenge mobali moklisto moko akómá mokóló azalaki na biso, mpe tokómákí na liteya ete Nzambe azali kozela biso tobika lokola basanto (babulisami) na nzela ya Klisto. Makomi ezalaki polele ete tosengeli kotambwisa bomoyi na lolenge ya kotalisa Nzambe na oyo tozali kosala. Tobengama tobika bomoyi na biso lokola bato oyo batiama mpembeni mpo na kokokisa mokáno na Nzambe, basanto mpo mpe misala na Ye, lokola basanto na Ye mpenza, baye bazali kozongisela Ye matondo. Elenge mobali amonaki mpenza ete akokaki kokoma bongo te, ntango atali mbeba nyonso asala, mpe lolenge amesana kobikela. Eswaki ye na motema ete Nzambe ábenga ye « mosanto ». Ebanda boni tobengama « babulisami » awa tosila kosala mbeba ya mitindo nyonso ? » Amituni bongo. 3. Kozala moklisto ezali lokola kozala mosali ya nkuku na bokonzi na Nzambe ! Ntango mosusu omóná bilili ya bandóngi epayi wapi mosali na nkuku ya ekolo songolo amikotisi na likambo ya nkaka na ekolo mopaya mpe azali kosala nyonso mpo ekólo na ye ezwa litomba. To mpe otángá julunalo to oyóká nsango oyo elobi na ntina ya ntoma ya ekolo oyo alobi mpo na kotatola makanisi ya ekolo na ye mpo na likambo songolo kati na bango na bikóló misusu na mayele ya kotambwisa mboka. Ntango azali koloba, azwi esika ya ekolo mobimba lokola nde mboka mobimba ezali koloba na kobimisaka makanisi mpo na kowelela likambo wana ebonga. Na lolenge nini Biblia ezali kosunga biso tososola likanisi ya ntoma ya mboka (moto oyo atelemi na mboka mopaya na esika ya ekolo na ye mpenza) mpo esunga mpe biso koyeba mosala mpe ntomo ya moklisto liboso ya libota, baninga, bazalani, mpe baye bazali nzinga-zinga, mpe kosala lokola basali ya Nkolo na Boknzi na Nzambe ? Na liyangani eleki (Makabo oyo tozwaka) omonaki ntango obikisamaki, Nzambe Molimo Mosanto apesaki yo libonza ya kosalela mpo na kolendisa Nzoto ya Klisto. Sikoyo okotala malamo malamo mposa ya Nzambe mpo na kosalela makabo wana kati na yo mpo ete ezala makabo ebotaka mbuma na kotalisa Ye ntango ndenge ozali kobunda etumba elamo ya kondima. Awa tokomi bana na Nzambe mpenza na kondima na Yesu Klisto (1 Yoane3:1-3), tobengami kozala lokola Nkolo, komekola lolenge na Ye, kosala lokola Ye mpe kolinga baninga mosusu lokola nde azalaki kobika na nzela na biso sikoyo na mokili. Tobengami « basanto », bato babulisami mpenza na Nzambe, bakomi sembo na nzela ya kondimela Klisto, bato bakomi bule mpe basukolami na makila ya Yesu. Nzambe alingi kobulisama na biso (atie biso pembeni mpo na kozala baye ya Ye moko mpe mpo na mosala na Ye), ete na lolenge nyonso bomoyi na biso –makanisi na biso mpe etambweli na biso, elobeli na biso, mpe bazalani na biso—tosengeli komonisa basusu ete tozali baí-Klisto mpe bokonzi na Ye ekoki komonana kati na biso, na lingomba.

Makambo ezali na kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online