Bunda etumba elamu ya kondima

72 • Bunda etumba elamu ya kondima

Biso, lokola bandimi na ndenge kokesana ya lobiko, tozali na lotomo ya kokamata mosala ya bosanto na maboko mpe kotikela Molimo Mosanto esika ya kokómisa biso na lolenge Nzambe alingi biso tozala wana ntango azali koleka mpe tozali komitia na esika na biso lokola bayekoli, moko moko na biso asengeli ayekola lolenge ya komikanga motema na bosanto mpe na lokumo mpo Nzambe abengaki biso na bomoyi ya moyimi to ya bilulela te, kasi na bomoyi ya sika ya bosanto mpe ya kitoko –bomoyi ekopesa Ye lokumu. Lisusu, tokomisami batalisi ya mboka mpo na Klisto, mpe Nzambe azali kobenga basusu sik’awa na nzela na biso. Ntango tozali kosakola Yesu lokola Nkolo mpe tozali kobonza bomoyi na nkombo na Ye epayi ya baye bandimi, tokoki komonisa motuya ya nsango tozali koteya na efandeli na biso, na etambweli na biso, na elobeli na biso mpe na lolenge tosalaka makambo. Sikoyo, lokola tozali bantoma ya mboka, tobengami totalisa litomba na Ye, koloba maloba na Ye mpe komitambwisa kokesana na baye bayebi Ye te. Na esika ya komekola baí-mokili, biso tokotelema lokola libota ebóngwáná, libota etonda na kokanisa bolamu. Tozali bantoma ya mboka ya Klisto. Topesi mokongo na baye bayebi Nzambe te, baye bomoyi na bango etonda na masumu, kasi tozali kobika bomoyi ya baye bayebi Nzambe, baye bazali kokumisa Nzambe mpe kokabola bomoyi epesameli biso na nzela ya Klisto, Nzambe mpe Mobikisi na biso. Tozali basali na Ye, tobulisami mpo na komemela Ye lokumu na nzela ya misala malamu kokesana na oyo abongisela biso tosala yango. Tozali na lotomo ya kolinga mpe kosalisa baninga misusu, koyebisa bango lisolo mpe kobenga basusu basangana na biso, na koleka baye tozali na bango lisanga moko na mosala, na libota mpe baninga. Ezali polele awa ete bokabwani ekoki kozala te kati na ntómbwá ya bokonzi ya Nzambe na koyokela mpasi, koyokela mawa, mpe kozala sembo. Uta na mokapo oyo ya Biblia, tosengeli tomema Eklezia na makanisi ya kokabola mpasi, koyokela mawa, mpe koluka sembo. Bokaboli mpasi ezali komonisa bolingo na Nzambe epayi na biso, lolenge ezali kosopanela biso, mpe ezali kobota mpasi tozali oyo tozali koyoka mpo na baye babunga mpe mposa ya komona mpe bango basepela na bomoyi ya sika. Koyoka mawa ezali lolenge na biso epayi na bato mpe masanga ezali na mpasi. Yango elongoli biso makanisi ya kopamela mpe ya kokweyisa bato bipayi nyonso bazali. Ata soki bato bazali na kati ya mabe likolo ya kozanga boponi ya ezaleli malamu, mawa ekomema biso tozongisela bango bolamu na lolenge eleki oyo bakanisaki ete bákoka komizwela bango moko. Ezali nde na lolenge wana Nzambe azalaki komona biso na nzela ya moto mosusu ntango tozalaki kobika mosika na Ye.

~ Efrem Smith. The Post Black & Post White Church : Becoming The Beloved Community in a Multi-ethnic World. San Francisco, CA : Jossey-Bass, 2012, page 59.

Made with FlippingBook - Share PDF online