Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mítano (5) Makambo eleki malamu oyo totalisaka • 73

makambo eleki malamu oyo totalisaka Liteya ya mítano (5) Koyekola Biblia Tanga makomi oyo mpe yanola na mokuse mituna ekokani na mateya ya Biblia 1. Tosangani na Yesu lokola bomoyi na biso, mpe tozali kobota mbuma na bomoyi na biso (kobika na bosanto mpe kokabola bolingo ya Klisto) mpo tozali lisanga (tokangami ntango nyonso) na Ye. Tanga Yoane 15 :1-8 mpe yanola mituna oyo : a. Na makanisi ya Yesu mpo na nzete ya miwiti, moloni, mpe bitapi; nani Klisto, nani Tata, mpe nani biso ? b. Soki etape ekangami na Ye te, etiki kozwa bomoyi mpe mapamboli epayi na Ye, etapi wana ekobota mbuma ? c. Na ndenge nini Yesu alobi Tata akumisami na oyo tozali kosala ? 2. Moto nyonso azali ekelamu ya sika epayi ya Klisto, abengami azala bule mpe abika lokola motalisi ya mboka ya Klisto epayi wapi moto wana azali. a. Mosala nini Yesu apesa biso (v.18)? b. Eloko nini Nzambe asalaki na nzela ya Yesu oyo epesi mbongwana mpe bomoyi ya sika epayi ya baye bandimi? (v19) c. Mosala nini tozali kokokisa awa totalisi mpe tozali kobenga basusu na kombo na Nzambe? (v.20) d. Talisa mbela tosengeli kosala na lokumu ya Nzambe (v.21) 3. Baye bandimi babengami mpo na kotalisa Klisto mpe lokumo ya bokonzi na Ye liboso ya bato mosusu na mokili na nyonso bazali kosala mpe koloba. Tanga Matayo 5 :13-16. Tondisa bisika ya polele : a. Tozali ___________________________________________ ya mokili. b. Tozali ___________________________________________ ya mokili. c. Tika ete ___________ na bino engenga mpo bato bamona _____ na bino mpe bapesa lokumo epayi na _______________________ .

Made with FlippingBook - Share PDF online