Bunda etumba elamu ya kondima

74 • Bunda etumba elamu ya kondima

4. Baye bandimi basengeli kobika lokola bato ya kopamela te mpe bana ya bopeto ya Nzambe, baye bazali kongenga lokola minzoto na kati ya mokili ya molili mpe ya masumu. Tanga Bafil. 2 :12-16 Sangisa bikela mpe solo na yango : a. Sala mpo na bolamu na yo mpenza ___________ mpo ezali nde Nzambe moto azali kosala mokano na Ye kati na yo b. Sala makambo nyonso ________________________ lokola minda na mokili c. Ete bozala bato ya kopamela te _______________ na mokolo ya Klisto mpe ya kozanga mabunga [Paulo] apotaki mbangu na mpamba te d. Kati na nani bozali kongenga _______ na koyima-yima to kotiana ntembe te e. Kosimba liloba na bomoyi makasi _________ bana na Nzambe basengeli kozala na litono te 5. Mokano na Nzambe mpo na mondimi nyonso ezali été tokoka kobika bomoyi ya peto, bomoyi ya bosanto, na kolanda nzela Nkolo Yesu Klisto Ye moko asembolela biso mpo tolanda yango. Tanga 1Tesaloniki 4 :1-8. Eloko nini Paulo alobi tosala mpo na kosepelisa Nzambe? 6. Lokola bandimi kati na Klisto, tosengeli totia makanisi na biso na biloko ezali likolo, mpe kolanda mibeko na Ye, mpo na bomoyi ya bule wana tozali kobika liboso na bato misusu awa na nse. Tanga Bakolosai 3 :1-17 mpe yanola : a. Ndenge nini tokoki komimona wana tosangani na Klisto ? (vv.1-4) b. Ezaleli nini tokoki kozala na yango liboso ya biloko ya mokili ? (vv.5-9) c. Ezaleli nini tokoki kozwa na ntina na bomoto na biso ya kala mpe oyo ya sika ? (vv.9-10) d. Makambo ya boyengebene nini tokoki kokolisa, lokola tozali libota eponami na Nzambe ? (vv.11-17).

Made with FlippingBook - Share PDF online