Bunda etumba elamu ya kondima
N kotela
Kozalisa bato bayekoli ezali kaka likambo ya kokabola boyebi te kasi ya kopesa bomoyi.
Juan Carlos Ortiz
Mbote na bino, baninga babundi minene na nkombo na nguya ya Nkolo na biso Yesu Klisto ! Ezali esengo na biso kopesa bino buku oyo mpo na bayekoli oyo basengeli kokola mpe babundi ya klisto. Bunda etumba elamu ya kondima : Sala ya yo mosala kati ya mabongisi ya Nzambe. Liteya kati na buku oyo emonisi na mokuse mabongisi ya Makomi esantu, ekomami na kobeta nsete na ntina ya koyekola Biblia na oyo yango ezali kolakisa mpo na maye etali lobiko na biso na lisolo monene na Nzambe. Tondimi mpenza ete lisolo ya solo ya mokili, ntina mpe suka na yango ebonbami na Biblia. Makomi esantu emonisi Nzambe lokola mozalisi ya bomoyi, mokeli ya mokili oyo apesáká elaka na Abalayama mpo na kotia nkona ya lipamboli mpo na mabota nyonso ya mokili. Nzambe asalaki ete ayebana na libota na Ye ya Yisalaele, libota oyo Masiya mopakolami abotamaki. Yesu azali mosali oyo Nzambe aponáka mpo ete aya na mokili mpo na kolonga liwa, kosukisa bilakeli mabe mpe kofandisa bokonzi na Ye kati na bato. Ya solo, Masiya ayaki mpenza na nzela ya libota na Ye Yisalaele, mpe toyebi ete azali Mosikoli mpe Mokonzi, Yesu ya Nasaleta. Makomi Esantu etatoli nkembo na Ye oyo amonisaki mwango mpe nkembo na Nzambe epayi na bato nyonso, Asikolá biso na masumu na nzela ya liwa na Ye na ekulusu, mpe lisekwa na ye kati na bakufi, mpe akozonga mbala ya mibale mpo na kobongisa makambo nyonso. Tango tobongoli motema mpe tondimi Yesu lokola Nkolo mpe Mobikisi, lisolo monene ya Nzambe ekómi ya biso mpenza, ekómi mpo na biso lisolo ya kokamwa, ya ngolu mpe bolingo, mabongisi kitoko oyo tozwi ebengisi biso tokabola mpe tobika na bato misusu kati ya libota mpenza ya Nzambe, lingomba. Maye tokoyekola : Lolenge nini ebongi kobunda etumba malamo ya kondima ? Buku oyo ekomami mpo na kopesa motangi mwángo ya mituna minene mpe makambo ya ntina ya lisolo (mabongisi) oyo ya polele mpe pete (na bolembu) na botangi na yango ; na bongo, ekosunga bino bososola yango na lolenge ya koyeba kozala na boyokani na Nzambe mpe na bato misusu wana tozali kobika na kati ya lingomba. Yango etindami mpo na kopesa bino bandimi, bino bato bozali na mposa mpe na bosenga ya kokola, mateya
7
Made with FlippingBook - Share PDF online