Bunda etumba elamu ya kondima

8 • Bunda etumba elamu ya kondima

libwa esangana oyo etatoli makambo ya ntina ya mabongisi ya Nzambe na kotala yango malamo mpenza moko-moko mpe komanyola, mpe kokabola makanisi kati na bino lokola basaleli oyo bawuti kokota na kati ya makambo nyonso tozali kobikela na mokili. Wana bokaboli ya makanisi ezali kosalema na ntina na makambo ya solo oyo ebongisami na ntoma Paulo na monkanda ya Baefeso, mateya ebongisami mpo na kopika bino na moboko ya kondima mpe na etambweli ya malamo oyo ebongi na bandimi. Tala sikoyo mitú libwa ya mateya, mpe ndimbola ya moko na moko na yango na mokuse. Liteya ya yambo (1) : Eleko oyo tozali kobika : kosangisa makambo ya bomoyi na biso mpe na oyo ya Nzambe. Liteya oyo ekosunga yo koyeba ete Nzambe ya molongo (ya mokili), Nkolo Nzambe oyo aleki na nguya, azali se moko, Nzambe ya solo mpe Yawe Nzambe oyo azali komonisama na ndenge misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. Ye nde azalisi biloko nyonso oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te mpe asali bato na elilingi na Ye. Liteya oyo etali mpe botomboki ya satana mpe kobuka mobeko ya bato ya liboso, Adama mpe Ewa, baye bazangi botosi mpe na nzela na bango mokili elakelami mabe. Ata bongo Nzambe alakaki biso mobikisi oyo akolonga mabe mpe akozongisa makambo nyonso mpo na nkembo na ye. Liteya ya míbale (2) : makomami oyo tosalaka : kondima misala na biso kati kati ya kowelana ya mokili na bileko nyonso, elimboli lolenge Yesu ya Nasaleta alongaki Zabulu (Satana) mpe alongolaki biso na bilakeli mabe na lisungi ya bomoyi na Ye (Yesu) oyo ezangi masumu mpe kokufa na ye na esika na biso. Sikoyo na nzela ya kobongola motema (koboya masumu mpe kozongela Nzambe), mpe na nzela ya kondima (kondimela solo oyo ezali na makambo etali Yesu), tokoki kozala na bokonzi ya Nzambe. Nzambe abikisi biso na ngolu mpe tobatisami kati na nzoto ya Klisto mpe Molimo Mosanto apesameli biso mpo na kobika bomoyi ya baklisto. Liteya ya mísato(3) : bokoti oyo tozwaka : Kosangisa bomoyi na biso na oyo ya Nzambe kati na Klisto, Yango elakisi biso lolenge tokangami na Yesu na nzela ya kondima (elakisi ete tozali sikoyo kati « na Klisto »). Na ntina ya lisanga wana yo ozali kozwa mpe kobikela makambo nyonso oyo Yesu azali mpe oyo apesi. Na nzela ya Molimo Mosanto, tokomi bato ya ndako na ye elongo na Yesu oyo azali lokola libanga na motu ya efelo ya ndako yango, mpe bantoma na basakoli bakomi moboko ya ndako. Etonga moko na moko ekosala lokola batindami baoyo bamonisi Bokonzi ya Nzambe, baye bazwi esika ya kokengela bomengo ya lola. Biso bandimi tozali lokola batindami na esika ya Nzambe mpe basali na Bokonzi na Ye. Liteya ya míneyi (4) :Makabo oyo tozwaka : mosala ya molimo mosanto na kati ya etumba elamu ya kondima. Liteya oyo ebeti sete na lolenge Molimo Mosanto afandi kati na bandimi nyonso mpe akopesaka bango makabo mpo basalela Eklesia. Tozali na bonsomi ya kosalela makabo na biso kati

Made with FlippingBook - Share PDF online