Bunda etumba elamu ya kondima
80 • Bunda etumba elamu ya kondima
Klisto. Nalingi yo omonana na nyonso ngai nakosala, napesa mokongo na oyo ezali kozangisa ngai koyeba Nzambe na mokili oyo, mpe nandima na mbela obengaki ngai mpo nabika na Bokonzi na yo ekoya. Nabondeli Yo Tata, pesa ngai nguya ya kokoma mosanto mpo nabika na bosanto mpe na kopetolama liboso na Yo mikolo nyonso. Tambola na ngai mpe sunga ngai. Sunga ngai natambola na elikya mpe kondima na mikakatano ya mokolo na mokolo, nayebaka ete molimo na Yo azali na ngai mpe akosunga ngai ntango nazali kokutana na mikakatano mpe bitumba mikolo nyonso. Lokola mosanto na Yo mpe ntoma ya mboka na Yo, tika ete nazanga te kokutana na Yo lelo, mpe sunga ngai nakanisa na makambo nyonso ete nazali mpo na ngai mpenza lisusu te. Osómbá ngai na motuya, makila na Yesu, mpe sikoyo nazali ya Yo. Yango wana, batela molimo mpe motema na ngai ata nyonso nakoki kokutana na yango lelo. Sunga basusu bamona Yo na nzela na ngai, na oyo nazali kosala, na lolenge nazali kosala, na koyanola, na efandeli na ngai na moto nyonso lelo. Fungola miso na ngai polele namona ndenge nini nakoki komemela Yo nkembo na nyonso nazali kosala mpe koloba. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo na ngai, amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tojali na eteni ebongisami mpo na mikanda ya kobakisa mpe bisaleli ya kotala na miso. Don L. Davis. Vision for Mission : Nurturing an Apostolic Heart. Wichita, KS : The Urban Ministry Institute, 2012. (Esaleli oyo elengelami na www.tumistore.org.) Na mbala ekoya okoyekola, « malendisi oyo tolukaka » bakisa na makambo oyo : 1. Tozali kobika bomoyi ya lisanga kati na lingomba. 2. Tozali kokumisa Klisto esika moko na etónga mpe na masanga ya mike mike. 3. Tozali komitosa biso na biso na botosi tozali na yango epayi na Klisto.
Mateya ya kokoba
Mpo na liyangani ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
Baefeso 2 :10
Mosala ya kokokisa na ndako
1. Lekisa minite 10 ya kokoma molongo ya makanisi ya mokengeli malamo ya nyonso oyo Nzambe apesi yo. Kanisa na ntina ya misolo mpe bozwi na yo. Koma molongo na yango na kati ya monkanda na yo obatelaka makambo mpo na komonisa lolenge okanisi ete lingomba ekoki kosala na yango.
Made with FlippingBook - Share PDF online