Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mítano (5) Makambo eleki malamu oyo totalisaka • 79

ntina ya bosanto mpe mosala na yo lokola moto azali kotalisa na Nkolo mpe oyo ozali kosala nyonso azali kotinda yo osala. Kanisa ete komipesa na yo epayi na Nzambe ezali nde kotosa makambo mike-mike mbala na mbala, motango te mpe na nsuka te, mpe mokolo na mokolo. Yanola Nzambe wana alobeli yo mpe bika na lolenge ya bomoto na yo mpenza lokola mosanto na Nzambe mpe moto atelemi lokola molobeli na Klisto.

Likolo ya nguya na Nzambe oyo ezali kosala kati na ngai, nazali na lotomo namekola lolenge ya Nzambe, natalisa Ye lokola motindami na Ye na nzela ya bolingo mpe na kosalela bato misusu.

Kondima

Ogistino ya Ipo to Auguistin d’Hippo (354-430), azalaki moyebi, molobi, mpe moteyi ya makambo etali Nzambe mpe moto atondi na bwanya ya kososola makambo. Makomi na ye epusi mbongwana malamu ya Eklezia liboso na Mokili ya Ngele. Azalalaki Episikopo na mboka Ipo (Aljeria na mikolo ya sika) Atangami lokola moko ya motuya kati na batata ya Eklewia. Kati na nkoma (babuku) na ye, oyo emonani lokola eleki misusu, totangi nkombo ya « Engumba ya Nzambe » to na longelesa « City of God » mpe « Kotatola to Kotubela » to mpe na lifalanse « Confession » Libondeli mpo na koyeba Nzambe, Ogistno Nkolo Yesu, sala ete námiyeba mpe nayeba Yo, mpe nazala na mposa mosusu te bobele Yo. Tika namiyina ngai moko mpo nalinga bobele Yo. Tika násála makambo nyonso na ntina na Yo. Tika namikitisa mpo na kotombola Yo. Tika ete nakanisa eloko mosusu te bobele Yo. Tika nandima liwa mpe nabika kati na Yo. Tika eloko nyonso ekoyela ngai kowuta na Yo. Tika nalimwisa bomoto na ngai mpe nalanda Yo, mpe nazala na mposa mpenza ya kolanda bobele Yo. Tika napumbwa uta na ngai mpenza mpe Yo ozala ebombanelo na ngai, ete nazali moto akoki kobatelama na Yo. Tika nayoka nsomo na ngai mpenza, tika nabanga Yo, Mpe tika nazala kati ya baye baponama na Yo. Tika nalongola motema epayi na ngai moko, mpo natia motema epayi na Yo. Tika ngai nalinga kotosa mpo na bolamu na Yo. Tika nakangama na eloko mosusu te bobele na Yo, mpe namikomisa mobola likolo na Yo. Senzela ngai, ete nalinga Yo. Benga ngai namona Yo, mpe nasepela na Yo libela. ~ Don L. Davis. A Séjourneras Qu’est. Wichita, KS : Institut du Ministère Urbaine, 2010, p. 98.

Libondeli

Kolela ya motema epayi na Nkolo

Nzambe ya bileko nyonso, Nzambe mpe Tata ya Nkolo na ngai Yesu Klisto, matondo mpo obengaki ngai nazala mbala moko mosanto mpe ntoma ya

Made with FlippingBook - Share PDF online