Bunda etumba elamu ya kondima
78 • Bunda etumba elamu ya kondima
3. Ezaleli na biso ezali koloba makasi koleka maloba na biso Na ntembe te, lolenge tomonani na bato ezali konganga makasi koleka maloba tobimisaka liboso na bato. Tokeba ete toloba bobele matatoli ya monoko na ntina na Bokonzi ya Nzambe te, kasi tobikela na kolandisama makambo yango mpo bato mosusu bamona yango mpe bapesa matatoli na solo. Ntoma Yoane apesi ndakisa na monkanda na ye ya liboso : 1 Yoane 3 :16-18.Na nzela oyo nde biso toyebi bolingo, mpo ete apesi bomoyi na Ye mpo na biso mpe biso tosengeli kopesa bomoyi na biso mpo na bandeko mosusu. Kasi soki nani azali na biloko ya mokili oyo, mpe amoni ndeko na ye na kokelela mpe akangeli ye motema, ndenge nini tokoloba ete bolingo efandi kati na ye ? Bana na ngai ya mike, tólingaka kaka na maloba te, kasi na bikela mpe na sôló. Biblia etondi na makambo mingi na kobenga oyo abengi bandimi mpo bandimí bamonisa bolingo na bango ya solo (Baroma 12 :19), emonisami na nzela ya lolenge na biso (Bagalatia 5 :13) kaka na maloba mpamba ya elengi te, kasi na bikela malamu oyo esungi basusu (Jaki 2 :15-17). Mpo na nini okanisi ete Nkolo na biso abeti nsete ete bolingo na biso emonana kaka na maloba te, kasi na makambo malamu oyo ekosunga ete bamona mpe babikela bolingo na bolembu ? Sikoyo osengeli okanisa lolenge nini solo ya Biblia mpe nguya na yango ekoki komonisama na bomoyi na yo ya lelo. Mpo ete ozali moko na bana na Nzambe balingámí na nzela ya kondimela Yesu Klisto, bobengami mpo na kókóma bamekoli na Nzambe mpe bana babengami basanto, basanto ya Nzambe ! Kanisa lolenge ozali komitambwisa sikoyo yo moko, ndenge nini olobaka mpe oyanolaka basusu, ndenge nini ofandaka na baí-libota mpe baninga, mpe obatelaka baninga misusu ? Senga lisungi mpe mayele epayi ya Molimo Mosanto mpo obikela bomoyi oyo ekokani na mbela ya Nzambe, mpe na bato oyo bofandi esika moko. Makambo nini okani ete osala yango lisusu te ? Makambo nini ekoki kobebisa etambweli na yo kati na Klisto mpe epesa elilingi mabe na litatoli na yo epayi ya basusu. Lisusu ozali Ntoma ya mboka ya Klisto, obengami kotalisa Klisto mpe bokonzi na Ye na nyonso ozali koloba mpe kosala. Lolenge nini okoki kosangana na basusu to komitambwisa epayi na bango mpe komonisa bango polele lolenge elongi mpenza ya Klisto mpe Bokonzi na Ye ezali ? Kobanga te kozala moto abateli liloba ná mibeko mpe kozala moto malamu. Ntango mosusu bokoki kotika makambo misusu bino nyonso, to kobanda kosala makambo misusu, to mpe kobongola ezaleli na Yo na lisanga na bato misusu. Nzambe akoki kosunga yo okoba kosala makambo kitoko, to kotuna yo kosala yango mingi koleka, to kosala yango na bato misusu. Mimonisa polele epayi ya Molimo Mosanto ntango azali koloba na yo na
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online