Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mítano (5) Makambo eleki malamu oyo totalisaka • 77
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Tanga mpe kanisa mpo na makambo ekomelaka biso mpe makanisi oyo, bongo oyanola na bososoli mpenza na bozindo na yango ntango bozali kopesa biyano ewuti na makomi boyekolaki. 1 . Eloko nini ekomelaka biso soki likambo na biso esimbi te ? Lokola bomesano, bandimi ya sika bazali kondima mbela na Nzambe na na esengo nyonso mpo na kozala basanto mpe batalisi ya mboka mpo na Klisto. Ntango bazali kotambola na Nkolo, bazali kokola makasi, kasi likolo ya komekama ya mokili bamesana, lokuta ya zabulu, mpe mimesano na bango ya kala na mokili, bakoki kokweya mpe kosumuka. Eloko nini ekomelaka biso soki tokweyi, to soki tokweyi koleka mbala moko na kozongelaka bobele bozoba yango moko? Yango moto oyo azali komimona moklisto bongo akweyi lisusu, azali kaka mondimi? Yango tozali nde na komekama ya bosanto epayi wapi bomoyi na biso ekomonana bobele soki tokweyi – bongo na sima nyonso elongwe? Bazali kaka lokola basanto mpe batalisi ya mboka ya Nzambe ata soki basali mbeba? Tanga makomi oyo mpe kabola biyano na yo ná mondimi mosusu, lokola eloko ozwi mpe obatela yango mpe elakisa yo etambweli. 2. Yango mokano mpo na baklisto ezalaka nde bobele yango moko mpo na baklisto nyonso na makambo nyonso ezali kolekela bango na efandeli ? Kobika lokola mosanto ya Nzambe mpe motalisi ya mboka ya Klisto ekitisaka motema, kasi ezali eloko ya pete te. Tosengeli kokeba noki tomikosa na kobungaka mokano na Nzambe na likambo songolo mpe tosengeli ndenge moko tókéba noki tómónana bato ya nsómo bobele mpo na kondima mbala moko likambo oyo moteyi ya suka ya liloba na TV akanisi na ntina ya likambo ya liteya na ye oyo azali kowelisa ete bato bandima yango lokola solo ya Nsango Malamu. Baklisto ya solo mpe baye bazali kondimela Nzambe bazali na ngambo mosusu kokesana na lolenge bazali kokana soki likambo songolo ebimi, bongo ngambo nyonso mibale ya baklisto bazali bobele kobimisa matángí ya Makomi na Nzambe, mpe kowelisa ete likanisi na bango moko nde ezali solo mokano ya kitoko mpo na baklisto. Eloko nini moklisto akoki kosala soki akutani na bandimi baleki makasi mpe batingami kobatela mokano na bango na likambo oyo ebimisi ntembe ? Esengeli nde bobele likanisi moko ya polele, ya pete mpe ya « sembo » nde ekoki kosalema na esika mpo na makambo nynoso ? Mokanda Paulo akomeli lingomba ya Roma mpo na kosunga bango elobi nini ? Ndenge nini Baroma 14 :1-12 ekosunga biso kososola motindo ya makambo lolenge wana ntango tozali kotambola elongo na Nkolo? • 1 Yoane 1 :5-10 • Masese 24 :16 • Jaki 5 :16 • Nzembo 32 :3-5 • Masese 28 :12-13
Made with FlippingBook - Share PDF online