Bunda etumba elamu ya kondima

76 • Bunda etumba elamu ya kondima

totamboli na Ye elongo. Lokola tozali kotalela Ye, kaka lolenge wana nde tokotalisa Ye malamu.

Mikanda ya kobakisa

Makomi ya kobakisa oyo bosengeli koyekola mpe kokanisa mpe elandani na liteya oyo yango oyo : Likambo ya efandelo / Oikos (Monk. Ya kob.10) Kosolola na Masiya: boyokani kati na minkanda ya Nsango Malamo (Monk.ya kob. 19) Kokende liboso mpe kotala nsima: kopusana epayi tokozongela Bonkoko Monene ya kala (Monk.ya kob.16)

Ezali kosala ngai soni soki nakanisi ete moklisto nyonso akoki komilatisa elongi ya Klisto mpe atangísí mpisoli likolo ya kosala eloko moko mpo na Klisto oyo moto ya mokili akoki kosepela kaka mpo na azwa mbongo.

~ Hannah Witall Smith. Richard J. Foster and James Bryan Smith, Eds. Devotional Classics: Revised Edition: Selected Readings for Individuals and Groups. Renovare, Inc. (HarperCollins Publishers), New York. 1993, p. 239.

Nzambe abengi biso mpo tosala na Ye na kobongolaka bingumba ete ekoma bizaleli misusu ya mboka ya Nzambe. Lokola moto ya likambo ya Bokonzi ya kimya mpe mabele ezali biloko ekomonanaka, ezali makambo esalemaka na mokili oyo, na bongo mposa na Nzambe ezali te « efandelo monene na likolo » kasi ezali mpo na mangomba ya kobika na mokili. Mpo na kosukisa, akomema engumba na Ye mpe Bokonzi na Nzambe ntango ngonga ekokoma mpo na « kobongisa biloko nyonso ». (Misala 3 :21), mpe bato mabe bakosambisama. Kasi mposa ya Nzambe, mpe etinda ya Eklezia ezali kokomisa engumba esika ya bosembo mpe ya kimia sikoyo na esika ya kokweyisa to ya kokima. Wana esengi nzengeneke ya Yesu Klisto oyo azali Mobikisi mpe Nkolo oyo aleki banso.

~ Howard A. Snyder. Kingdom, Church and World : Biblical Themes for Today. Eugene, OR : Wipf and Stock Publishers, 2001, p. 48.

Tozali basali na Ye, tosalami na nzela ya Klisto mpo na misala malamu (Baefeso 2 :10).

Mobeko ya ntina

Made with FlippingBook - Share PDF online