Bunda etumba elamu ya kondima
L iteya ya mótoba (6) M alendisi oyo tolukaka Kolendisana biso na biso kati na Nzoto ya Klisto
Mpe bolangwaka masanga te mpo yango ezali libebi*, kasi botondaka na Molimo, awa bozali kolobana bino na bino na nzembo ya kosanjola Nzambe,* mpe nzembo ya molimo, ntango bozali koyemba mpe kosanjola Nkolo na mingogo kitoko na motema mobimba, ntango nyonso kotondaka Nzambe na makambo nyonso na nkombo ya Klisto. Bomitosaka na kobanga Klisto.
~ Paulo epayi baefeso (Baef.5 :18-21)
Mposa ya kokokisa nsima ya liteya
Na nsima ya liteya oyo osengeli kosimba malendisi oyo tolukaka na kondima ete : • Bomoyi ya baklisto etindi tobika na bomoko na lingomba, tokola na lisanga lokola libota ya Nzambe, nzoto ya Klisto mpe tempelo ya Molimo Mosanto. • Tozali koyekola makambo ya bokonzi ya Nzambe, tozali kotonda Nzambe mpe kokola lokola bayekoli ya Klisto ntango nyonso tozali kosangana na bandimi mosusu na lingomba na biso to na masanga mike-mike. • Lisusu tozali kolanda Klisto lokola Nkolo na biso. Tomilendisi na kondima na koyebaka ndenge nini tokomitosa biso na biso uta na botosi tozali na yango epayi na Klisto. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na Yo ete ozali liziba ya bwanya mpe ya mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka *Libebi : libebi ezali esengo oyo eleki ndelo. Yango elingi koloba te ete tosengeli kokima makambo nyonso ekoki koyokisa biso esengo. Bongo te, kasi tosengeli kososola kati na bizaleli na biso eloko nini ezangisi Nzambe lokumu. Nzambe apesa biso makoki nyonso tosengeli na yango mpo na koyoka esengo. kasi likambo nyonso ezali na ndelo na yango. Ndakisa, soki ebale ezali kotiola na ndelo na yango, mayi ezali na nguya mpe ezali likambo malamu, kasi soki mayi ekatisi ndelo mpe ezindisi engumba, ebale wana ezwi nguya ya kobebisa mboka. Ezali ndenge moko na libebi, kosala mpo oyoka esengo kokesana na mokano na Nzambe. Ntango esengo eleki ndelo, ekomi nguya ya kobebisa moto mpe bato mosusu lokola. *Nzembo ya kosanjola Nzambe mpe nzembo mpo na lokumu : Nzembo na Nzambe ezali kati na Biblia. Yango eyembamaka na lingomba mpo na lokumo na Nzambe. Nzembo mpo na lokumu mpe nzembo ya Molimo ezali maloba ya bolingo mpe ya lokumu oyo ekomama na baklisto. Yango ewuti na Biblia.
Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya
83
Made with FlippingBook - Share PDF online