Bunda etumba elamu ya kondima
84 • Bunda etumba elamu ya kondima
kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli Yo lakisa ngai mpe teya ngai nzela nakolanda (Nze.32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na Yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soki nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya, milimo mpe makabo ya Nzambe ya solo mpe na oyo ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na Yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na Yo na motema mobimba. Nkolo ya bolingo, nabondeli Yo sunga ngai nayokamela mpe nayoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Jak.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai endimama na miso na Yo. Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na Yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo Yesu mpe Mobikisi. Amen. 1. « Likolo ya makambo mabe nabíká, nakoki kokende lisusu losambo te ». Mawa mingi ete ebele ya bato bayâka na mangomba bamóná makambo mabe kati na bango na bato misusu. Soki likambo ya motindo nini ebimi, ndakisa makambo ekoki kolimbisama te, komilela mpe zuwa, kozanga koyokana mpe makambo oyo eswi makasi na motema, bato misusu bakendaka nde na lingomba mosusu mpo na kobandela bomoyi ya kimoklisto kuna. Na kotalaka oyo oyebi sikoyo, eloko nini okoki koteya mondimi ya sika na likambo etali koya na ye na kosangana mpo ete akola kati na Klisto, mingi mpenza soki oyebi ete akútáná na likambo ya bololo na lingomba mosusu ? 2. « Nakoki kondima te été Biblia ezali kokoba ya lisolo mpo na ndenge Nzambe asungi bikelamu na Ye mpe moto ! Moto, oyo Nzambe ya bolingo tozali kosalela ! » Okoki koyeba ete Biblia ekabwani na biteni mibale : makomi ya bayuda (Boyokani ya Kala ezali na babuku tuku mísato na líbwa (39), ebandi na buku ya ebadeli to mpe Genèse mpe esuki na Malaki), mpe Boyokani ya Sika ya baklisto (yango ezali na babuku tuku míbale na sámbo (27), ebandi na Matai mpe esuki na Emoniseli). Oyo osengeli oyeba lisusu ezali ete ata ko Biblia ezali lisanga ya babuku, Biblia ezali solo se buku moko ; yango ezali koloba lisolo ya bolingo ya Nzambe epayi ya bikelamu na Ye mpe epayi ya moto. Biblia ezali se buku yango moko oyo ezali kolobela bolingo monene ya Nzambe mpe mokano na Ye mpo na molóngó mobimba ete biso tobika. Na boye, lingomba ya baklisto ekeseni na mangomba
Bokutani
Made with FlippingBook - Share PDF online