Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mótoba (6) Malendisi oyo tolukaka • 85

misusu. Mangomba misusu ezali komipesa mpasi mpo na kokokisa misala, makanisi to mibeko oyo bato basengeli kotosa mpo bákóma bato ya kokoka, mpo bazwa mapamboli, mpo babongwana to bazwa kobatelama. Kasi na ngambo mosusu, lingomba ya baklisto ezali likabo ya bomoyi Nzambe apesi na bato ata ko bazali kokoka mpo na kozwa yango te, ata ko basengi yango te, to ata bakokaki komizwela yango te. Mpo na nini okanisi ete ezali mpasi mpo moto azwa nsango oyo ya ntina ya Makomi ? Eloko nini ekokaki kopekisa bango kososola « ngolu na Nzambe », bolingo mpe mawa ya mokonzi epayi na bato na Ye, ata atali lolenge ya bato yango te (oyo basali, mpe wapi bazali) ? 3. « Ndenge nini mobateli mpate na biso akoki kokamba bato nyonso oyo ? Nakokoka koyeba ye te. » Moko na makambo Nzambe azali koloba mbala na mbala na Liloba na ye ezali tokokóla soki tozali kolanda mateya mpe ndakisa oyo bateyi mpe bakambi baye babangaka Nzambe bazali kopesa biso. Kasi na biyamba misusu, mobateli mpate azali kokamba ebele ya bandimi na lingomba, ntango mosusu ba nkama (100) to ba-nkoto(1 000). Ná bandimi ebele na lingomba mpe ná mobateli mpate azwi mokumba mingi koleka, bandimi mingi bakomílela kino ekokoma nkaka mpo na mondimi moko moko, to libota moko moko, to libala moko moko mpo bayebana malamu bango na mobateli mpate. Mondimi moko alobi : « Soki ezali nde likambo ya kobatelama malamu ebongi kaka oyebana malamu na mobateli mpate, wana ngai nakozala na mobateli mpate ata moke te ». « Ndenge nini mobateli mpate na biso akoki kobatela ebele ya bato nyonso wana ? Nakokoka koyeba ye te ! » Okoki koloba nini mpo na kolendisa elenge mondimi wana na kozanga na ye ya bososoli na ndenge akanisi kozanga kobatelama malamu na mobateli mpate, ekoki kosalema boni na mikolo ya lelo ? Na liyangani eleki (makambo eleki malamu oyo totalisaka ) oyekolaki ete totalisaka Klisto lokola bana balingami mpenza ; tozali kobika lokola basanto ya Nzambe mpe lokola batindami ya mboka na Ye, totaliska Klisto na mokili oyo ekweya. Sikoyo okotala ndenge Nzambe alingi biso tokola na kondima na eklezia biso tozali kolandaka libatela ya pasitele, mpe na komitosaka biso na biso mpo tokoka kobunda etumba malamo ya bondimi. Yesu alingi bato na Ye bazala na bomoko mpe bamipesa kati na bango ntango tofandi na lisanga. Tosangani poso na poso mpo na kosambela, mpe tozali kokutana mpo na koyekola Biblia to na masanga mike-mike mpo na komilendisa. Tosengeli toyeba bandimi misusu mpo toluka ete bango mpe bayeba biso malamu. Tosengeli toyambana na ba-ndako na biso, komipesa kimia, mpe komisepelisa to kosakana elongo to kosala nyonso mpo na komilendisa wana tozali kolanda Klisto. Lokola bandimi, tosengeli

Makambo ezali kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online