Bunda etumba elamu ya kondima

86 • Bunda etumba elamu ya kondima

kobika bomoyi ya Klisto : na nzela komikabela biloko, kolingana, komonisa bondeko, mpe komilakisa nzela mpe etambweli malamu. Lisusu, tobengami ete tómilendisa biso na biso na makambo ya bolingo mpe misala malamu mpe na koboya misala mabe oyo tomesánáká na yango liboso ete tókóma bato na nzambe na nzela ya kondima kati na Klisto. Lokola biso nyonso tozali ntango nyonso komekama mpo na kosala mabe, tokoki kopesa nzela te na bomoyi ya molimo to na lingomba ya baklisto na makambo ya mokili, makambo bantoma bapekisáki na minkanda na bango epayi ya baklisto, lokola ekobo, makambo nyonso ya bosoto, bilulela, mposa mabe mpe lokoso. Ya solo tosengeli kokabwana na makambo oyo ezali kolendisa te, elingi koloba makambo oyo ezali kotia mobulu na nzela na biso ya molimo), lokola nkanda, nkanza, mosulu to mayele mabe, songi songi mpe maloba mabe. Lokola toyekolaki na litetya eleki, tokomi solo mpenza basanto na Nzambe mpe tobengami bantoma ya Klisto bipayi nyonso tokeyi. Sika tozali kobika mpo na kolendisa bandimi misusu, kasi mpo na kobebisa bango te to mpo na kokosa to kotangola bango na makanisi na bolingo ya Yesu te. Nzoka nde tobengami komilendisa biso na biso na mabondeli, komikembisa biso na biso na lingomba, kolanda bakambi na biso ntango bazali kolakisa biso nzela na mateya mpe na ndakisa na bango. Lokola bato baponami na Nzambe, tozali na lotomo ya kosala makasi ya kolingana kati na biso mpe koluka ndenge ya kokolisa lolenge ya sika ya kobika mpe ya kokanisa, koyekola ndenge ya kobika na mawa mpe boboto, komikitisa, esengo mpe kokanga motema. Na koleka nyonso, bolingo tolingi bato misusu esengeli emonisa ezaleli na biso na bato misusu. Na kosalaka bongo tokobanda kosepelisa Klisto na makambo nyonso. Malendisi oyo tolukaka Liteya mótoba (6) : Boyekoli Biblia Tanga makomi oyo mpe yanola na mokuse mituna oyo ekokani na mateya ya Biblia. 1. Makambo tokokuta na lisolo ya Nzambe ezali mosala ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosanto lokola elobami na Biblia, Makomi Esanto. Lokola bandimi na kati ya Klisto, tozali libota ya lisolo yango – tozali kokanisa yango na ntango tozali kosolola, koyekola, mpe koteya makambo etali Nzambe (teoloji), tozali koyemba mpe koteya na ntina na yango na losambo, tolakisami lolenge ya kozala moyekoli, mpe kolakisa matatoli yango na bato misusu . Tanga makomi oyo, tala na Minkanda ebakisami « Lisolo ya Nzambe : Misisa esanto na Biso », mpe yanola mituna ekokani na eteni moko moko na makomi.

Made with FlippingBook - Share PDF online