Bunda etumba elamu ya kondima

88 • Bunda etumba elamu ya kondima

3. Wana tobikisami na ngolu ya Klisto tozali na Lisolo ya sika mpe na nyongo ya komonisa bomoto ya sika mpe kozela ndele (lobi) ya sika. Yango wana, bandimi bakoki lisusu te balanda lolenge ya bapagano, kasi basengeli kotambola lokola baye basikólámá na Klisto. Tanga na 1Pet. 4 :1-11 mpe koma malendisi míneyi (4) oyo Petelo apesi na bandimi ete basalela lokola libota eponámá na Nzambe.

a. b. c. d.

4. Ndenge tozali kosangana na bandimi misusu esengeli emonisa komikitisa ndenge Klisto asalaki mpo azwela biso lobiko. Tanga Bafilipi 2 :1-11. Na kolandaka Paulo, etambweli na biso esengeli ezala boni ?

5. Mobeko ya sika Klisto apésá na bayekoli ezali tolingana biso na biso, topesa bomoyi na biso lokola mbeka moko mpo na basusu. 1Yoa 3 :11 18. Sangisa liloba ya liboso na solo oyo ekokani na yango : a. Oyo ezali nsango boyokaka __ Tosengeli kolingana biso na biso. b. Bokamwa te __ ete Yesu apesa bomoyi na Ye mpo na biso. c. Toyebi ete toleká uta na kufa __ kasi na misala mpe na solo kino na bomoyi. d. Na boye toyebi nini bolingo ezali __ mpo tolingi bandeko na biso e. Moto oyo azali kati na bolingo te __ mokili ekoyina bino f. Tika tê ete bolingo na biso ezala __ awumeli kati na kufa bobele ya monoko mpe ya maloba mpamba

6. Sikoyo lokola tokómí bato ya Klisito mpe tobiki kati na lisolo na Ye, tosengeli kotambola na ndenge ekoki na bomoyi apesá biso lokola toyebi ete tosangani biso nyonso na nzoto moko mpe molimo moko.

Made with FlippingBook - Share PDF online