Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mótoba (6) Malendisi oyo tolukaka • 89
Tanga Baef.4 :1-6. Koma mitindo ya makambo mísato (3) oyo osengeli komonisa mpo obika na ndenge ekoki na mbema tozwa :
a. b. c.
7. Lokola bato ya lisolo ya Nzambe, bandimi basengeli kokeba na ndenge bazali kobika, kolanda Molimo Mosanto mpe komilendisa bango na bango na losambo mpe na matondi epayi na Nzambe na Klisto. Tanga na Baef.5 :15-21 mpe sangisa mibeko na ndimbola bapesi. a. Tala malamo ndenge ozali kotambola __ epayi na Nkolo na motema na yo. b. Kolobana bino na bino __ epayi na Nzambe Tata na nkombo ya Klisto. c. Na koyemba mpe na mingongo kitoko __ lokola bazoba te, kasi lokola bato na bwanya d. Kozongisaka matondi ntango nyonso __ na nzembo, na nzembo
Ya limemia mpe na nzembo ya molimo.
e. Kozala zoba te
__ kasi sosola ndenge mposa ya Nkolo ezali.
8. Nzambe apésá biso batambwisi, baye bazali kotosa ye mpo bakengela milimo ya bandimi na lingomba, baye bazwá mokumba ya koteya biso mpe komema biso na lisolo oyo etonda na bomengo mpe na kati ya bondeko ná bandimi misusu. Sangisa makomi oyo na biyano kitoko na yango. a. Baeb.13 :7 __ Tosa bakambi na yo mpe mikitisa na limemia epayi na bango b. Baeb.13 :17 __ Simba biyano ya bakambi na yo mpe mekola yango. c. 1Tes.5 :12-13 __ tosa mpe sepela na bakambi na yo, mpe baye bazali kongangela yo na motindo esepelisi Nzambe.
Made with FlippingBook - Share PDF online