Bunda etumba elamu ya kondima

90 • Bunda etumba elamu ya kondima

9. Monguna azali kokosa biso na makoki tozali na yango na kati ya Klisto, kolobáká ete Nzambe azali kopíma biso eloko moko. Kasi Liloba na Nzambe elobi ete tozali na eloko nyonso tosengeli na yango mpo na lobiko mpe na bondimi na biso epayi Nzambe. a. Tanga Buku ya ebandeli.3 :1-7. Lokuta nini nyoka akosaki Ewa na kotindaka ye andima ete Nzambe apímeli ye eloko moko. b. Tanga 2 Pet.1 :3 Tondisa bisika ya polele : Na nzela ya ____________ na Ye apesaki biso ________________________ oyo tosengeli mpo na ___________________________________________ Ezali motuya makasi ete tosangana na bandeko misusu baye bazali kotambola na nzela na alima –ezali te bobele baye bazali kotambola na biso nzela moko na mobembo, kasi na baye bakómá mosika. Baye bakoma pene pene na Nzambe bazali na makoki ya komema biso pene na Ye, na ndenge mosusu bakomema biso elongo na bango. Nzambe alingi ete mondimi nyonso na Klisto alenda, akola, akemba na Klisto mpe ayekola eloko nini kolendisa bato misusu. Yesu alingi biso tokola na kondima na biso na ntango tozali komikotisa na misala ya lingomba epayi wapi tozali kosambela na lisanga ya bandimi. Totindami koyekola na kolandaka mateya mpe ndakisa ya ba pasitele oyo babangaka Nzambe mpe kobika elongo na baklisto mosusu na kolingaka komikitisa kati na biso, bongo tokoyeba kobunda etumba elamu ya kondima. Lolenge moko Nzambe azali kosalela mpo na kokola ezali bolingo, lisanga ya bandimi –lingomba. Tozali kokokisa oyo ya biso mosala na lisolo ya Nzambe ! Moko na moko na biso apesami makabo ya Molimo oyo tosengeli kokolisa na Nzoto, kolendisana ntango tozali kosangana poso nyonso lokola lingomba ya losambo ya Klisto, mpe ntango tozali kosangana mpo na koyekola Bilblia to masanga mike-mike. Nzambe azali na mposa ete tolingana biso na biso lokola Klisto alingi biso. Wana eloko tozali koyekola kosala na lisanga ntango Molimo Mosanto azali kokamba biso ye na babateli ya mpate (bapasitele) oyo Nzambe apesa biso mpo na kokamba mpe koleyisa biso. Tosengeli kobunda mpo na kokoma baninga ya bandimi misusu, koyamba bango na bomoyi na biso mpe na bandako na ~ Teresa of Avila Richard J. Foster and James Bryan Smith, Eds. Devotional Classics : Revised Edition : Selected readings for Individuals and Groups. Renovare, Inc. (HarperCollins Publishers), New York. 1993, p. 165.

Na mokuse

Made with FlippingBook - Share PDF online