Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mótoba (6) Malendisi oyo tolukaka • 91
biso, kolekisa ngonga ya kosepelisa nzoto na masano. Tozali na libota mpe tosengeli kobika na boyokani. Lisusu, tobengami lisusu tomipesa mposa ya kolingana mpe ya kosala misala malamu, mpe ya kosundola misala mabe oyo tomesánáká na yango liboso, tokómá bato ya libota na Nzambe na nzela ya kondimela Klisto. Tozali kobunda etumba elamu ya kondima bobele soki tozali lisanga na baninga ya mapinga, baklisto misusu, baí-lingomba esanto ya baklisto, lingomba ya bomoyi ebatelami na bakambi ya kondima baye bazali kolendisa na nzela ya ndakisa malamu mpe na Liloba na Nzambe. Minkanda ya kobakisa oyo osengeli koyekola mpe kokanisa ekokani na liteya oyo elandi : Litatoli ya kotalela bobele Nzambe : Bonsomi kati na Klisto (Monk.ya kob. 9) Kozala moto oyo atelemi na esika na ye : kokolisa bayekoli ya Bokonzi na Nzambe (Monk.ya kob. 20) Makambo esungi biso tozala na efandelo (oikos) (Monk.ya kob. 10) Tanga mpe kanisa mpo na makambo oyo tokutanaka na yango mpe makanisi oyo, mpe yanola mpe sosola na bozindo lolenge ya kolukela yango biyano ekokani na biteni ya Makomi ya Liloba na Nzambe boyekolaki. 1. « Makabo ya Molimo nini nazali na yango, mpe nakoki kosalela yango ndenge nini ? » Biblia elobi ete moklisto nyonso azali na makabo oyo ezali kosunga ye alendisa bato misusu na lisanga ya baklisto ( Bal.12 :3-8 ; 1Bakoli.12 :4-11 ; Baef. 4 :9-15 ; Pet. 4 :io-11). Makabo wana esengeli asalela yango na nzoto (etonga) ya bandimi, ntango bazali kosalisana na makambo, kobika lisanga, kondima kosala, mpe kokola lisanga na lisungi mpe kobatelama ya pasitele. Mpo na nini kosalela, mpe kobatela moto mosusu ezali likambo ya motuya mingi koleka kowelana na maloba to koswana na ntina na makabo na biso? 2. « Mpo na nini nasengeli kosangana na eklezia lokola moí-lingomba mpe bobele soki nazali koyoka malamu mpe nayaka na nsámbo bobele poso na poso ? » Ntango tozalaki koluka lisosoli ya mosala ya eklezia mpo na kolakisa bayekoli mpe kolendisa baklisto misusu, mondimi moko ya sika abandaki komituna na ntina « na bomoyi na ye moko mpo na komikotisa na lingomba. « Nalingi kokokisa makambo na lingomba oyo nakendaka sikoyo. Nalingi losambo mpe liteya ya Mobeko na ngai yango oyo : Bolingana bino na bino lokola nalingaki bino (Yoa.13 :34)
Minkanda ya kobakisa
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Made with FlippingBook - Share PDF online