Bunda etumba elamu ya kondima
92 • Bunda etumba elamu ya kondima
pasitele, misala ezali kitoko mpe mokuse. Na bosembo, nakanisaki te été nakoki komikotisa na losambo lokola moko ya bai-lingomba. Nayebi bato misusu bayaka na eklezia se na nsambo ya mokolo ya eyenga, kasi bayaka na makambo misusu esalemaka na bitonga mike na kati-kati ya poso te, to mpo na makambo misusu te. Nalingi boye. Mpo na nini naya na lingomba se ntango nazali malamu mpe se na mokolo ya eyenga ? Na kolandaka oyo owuti koyekola na liteya oyo, eloko nini okoki koyebisa mondimi ya sika ya Nkolo oyo mpo na litomba ya kozala moto ya makasi na lingomba na esika ya kozela se losambo ya eyenga ? 3. « Koluka boyokani na baklisto ezali likambo ya pete te. » Moko ya mikakatano bato bazali kokutana na yango mpo na kokende na losambo ezali kozanga moninga na ye moko mpenza. Ezali likambo ya kokamwa komona ete bato bazali basali kati na bitonga na bango kasi ata moko te azali na moninga ya motema. Solo ezali ete kozwa moninga ezali na litomba kasi yango ezali na ntalo mingi. Mpo na kozwa baninga, osengeli ozala moto afungwama, bákutanisa yo na bato to kosangana na bato na bolingo (Mas.17 :17), ozala na mokano malamo ete oyebana mpe ozala oyo bato misusu bakososola (Yoa 15 :13-14), ozala moto afungwama mpo na kozwa lisungi ewti epayi ya bato misusu, ezala bamanyoli mabe na yo to makambo misusu esengeli ete obongisa yango (Mas. 27 :6). Baninga bapesaka mateya malamo oyo tosengeli na yango mpo tokola na kati na Klisto (Mas.27 :9). Ndenge tosalelaka makabo na biso ya Molimo, ba-moko mpo na basusu, tokoki kokokanisa yango na ndenge ebende ezali kokomisa ebende mosusu mpia. Se ndenge ebende ekomisaka ebende mosusu mpia, moto mpe azwaka mayele na moto mosusu (Mas. 27 :17). Nakotalaka makambo oyo ya solo, mpo na yo sika, eloko nini eleki na motuya soki olingi otonga boyokani ya makasi mpe ya malamo na bato misusu kati na lingomba na yo ? Yesu alingi tokola lokola bayekoli mpe tokoka kobunda etumba malamo ya kondima, bobele biso moko te kasi lisanga na bandimi misusu na lingomba. Soki obandaki koya na losambo malamu te, kamata mokano sikoyo mpo okoma mondimi makasi kati na lisangana. Ndima kotuna na bandimi baléndá esika basanganaka na basusu mpo na kotonda Nzambe mpe kamata mokano ya kokendaka kuna. Tuna bato ya liboso na ntina ya mateya bapesaka na bato ya sika mpe banda kokende na sukulu ya eyenga mpe boyekoli na bitonga mike-mike, boyekoli Biblia to masanga ya bituka. Kolemba te kasi telema makasi, zala na kokanga motema wana ozali koluka koyeba bandimi misusu ; salela makabo na yo mpo olendisa bandimi misusu mpe yo yekola epayi na bango lokola. Mpe lisusu, sala makasi oyeba mobateli mpate (mokambi, mpaka ya lingomba na yo). Monisa bango été okomi kosangana na bango na
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online