Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mótoba (6) Malendisi oyo tolukaka • 93
losambo mpe bondela mpo na bango. Tuna soki okoki kokutana na bango mpe kabola na bango litatoli ya bomoyi na yo. Sunga bakambi na yo été batambwisa yo malamo koleka. Tosa mibeko bakambi na yo bazali kopesa yo mpe sala na bokebi mpo na kotosa bango mpo bazali bakonzi mpe bakengeli ya molimo na yo ndenge moko bakengeli ya mpate babatelaka mpe bakengelaka bitonga na bango bazali kosala boye mpo bayebi ete Nzambe akotuna bango na ntina na molimo na yo. Na boye, sala ete bakambi basala mosala na bango na esengo kasi na komilela te mpo yango ekozali na litomba moko te mpo na bino (Baeb.13 :17). Zwa mokano ete ozala mpe okoma mondimi makasi elongo na basusu kati na lingomba. Nzambe akosalela yo ngolu ete okende se liboso elongo na bandimi misusu mpo na bomoyi ya baklisto batondi na nguya.
Mpo ete Yesu asengaki na bayekoli na ye balingana bango na bango, nazwi mokano ngai moko été nabika kati na lisanga ya eklezia tolimbisanaka mpe totosanaka biso na biso.
Kondima
Kati na mabongisi ya Nzambe, kolanda biblia, losambo ya Yesu Klisto ezali mpo na mokili mobimba ; ekoki kolandama na ndenge nyonso bato bazali kobika na bisika kokesana. Na monkanda ya Misala na Bantoma tomoni ete Nsango Malamo ezali mpo na bato nyonso. Kosakola Nsango Malamo na nkota nyonso ya mokili, mokolo Molimo Mosanto akitelaki bayekoli, ezali elembo malamo emonisi éte Nsango Malamo ya baklisto ekangami se na lolenge moko ya kobika ya bato te ( culture mokote ) to lokota moko te. Tomoni ete ezali mpo na mokili mobimba wana esakolamaki mpe endimamaki na Bayuda mpe na Bangeleki na mibu nkama ya liboso (mibu 100 AD/ nsima ya mbotama ya Yesu). Kobengama ya lingomba ezali ete ekota na bikolo nyonso na ndenge nyonso ya kobika na bato elongo na nsango ya lobiko. Na ntina ete bato nyonso, kolanda libota na bango, bakoka kotosa Nzambe. Na yango na losambo ya baklisto, soki nazali kotonda Nzambe na lolenge na ngai ya kobika te, wana nalendi nano te na kondima na ngai.
~ Carl F. Ellis, Jr. Beyond Liberation : The Gospel in the Black American Experience. Downers Grove, IL : Inter Varsity Press, 1983, p. 137
Francis ya Asise (1181-1226) azalaki moteyi mpe mokambi na mboka Itali. Abongisaki etonga ya bato bamipesaki na kosakola Nsango Malamo mpe kobika na lobiko ya mpasi mpo na Klisto mpe mpo na kosalisa bato misusu.
Libondeli
Made with FlippingBook - Share PDF online