Bunda etumba elamu ya kondima

94 • Bunda etumba elamu ya kondima

Etonga yango ebengamaki: « Lingomba ya bai-Falanswa ya Asise » Na bomoyi na ye asalisaki mangomba misusu ete ebonga. Azali moko kati na baklisto batosami na Lisolo. Libondeli ya komibonza ya Francis ya Asise Nkolo, komisa ngai esaleli ya komema kimia. Epayi wapi koyina ezali, ngai namema bolingo. Epayi wapi lotúko ezali, ngai namema bolimbisi. Epayi wapi mbilinga mbilinga ezali, namema lisanga Epai wapi mabunga ezali, namema solo. Epayi wapi ntembe ezali, namema kondima. Epayi wapi elikya ezangi, ngai namema elikya. Epayi wapi molili ezali, ngai namema pole. Epayi wapi mawa ezali, ngai namema esengo. O Nkolo Nzambe, sunga ete náluka t ɛ bobele nabondisama mingi koleka, ngai nde nabondisa ; bobele bayokela ngai te, ngai nde nayokela; bobele nalingama te, ngai nde nalinga, mpo ete ezali nde ntango napesi nde nga mpe nazui, ntango nalimbisi nde ngai mpe nalimbisami, ntango nakufi nde nasekwi na lobiko ya seko. ~ Don L. Davis. A Sojourner’s Quest. Wichita, KS : The Urban Ministry Institute, 2010, pp. 95. Nkolo ya ntango nyonso, Nzambe mpe Tata ya Nkolo na ngai Yesu Klisto, matondo mpo otia ngai na nzoto ya Klisto. matondo mpo nakoki kobika lobiko na ngai ya moklisto na ndenge na ngai moko te, ntango nazangi lisungi ya bato misusu, baye balingi yo mpe bazali koluka basepelisa Yo. Matondo na lolenge ozali kolendisa bato na Yo na lingomba, mpe mpo opesá biso bakambi mpe babateli mpate baye ndakisa mpe mateya na bango ezali kosunga biso toyeba mpe tosala mokano na Yo. Sala ngai ngolu ya koyikela baninga misusu mpiko, ya koyekola epayi na bango, ya koyokamela bango ntango bazali komanyola makambo na gai ya mabe to ya malamu mpe ya koyokamela mateya na bango. Sunga ngai nalonga makanisi ya binzambe-nzambe mpe nakabwana na yango. Nazali na posa na bango soki nalingi nakóma oyo olingi ngai nazala ; na boye, lendisa ngai nazala na mpiko epayi ya basusu, mpe nasangana na bango kasi nasundola bango te, nabwaka bango te, to nabulisa bango te. Lakisa ngai na nzela ya bakambi, lendisa ngai mpe meka ngai na nzela ya baninga bandimi. Nakosalaka bongo, nayebi ete nakokola mpe nakokemba na kati ya Mwana na Yo. Matondo, Tata, mpo na likabo ya libota na Yo. Na nkombo na Yesu, nabondeli, amen.

Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo

Made with FlippingBook - Share PDF online