Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mótoba (6) Malendisi oyo tolukaka • 95
Mateya ya kokoba
Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni moko ebulisami mpo na bisaleli ekomami mpe misusu ya komona bilili na miso. Don L. Davis. Sacred Rooots: A Primer on Retrieving the Great Tradition. Wichita, KS : Institut du Ministère Urbain, 2010. Na bokutani oyo ezali koya, okoyekola monguna oyo tobundisaka bakisa mitu ya makambo oyo : 1. Tozali kobundisa na mosuni to mpe makila te. 2. Mongunda na biso zabulu azali kosala na nzela ya mokili ekwéya na masumu mpe na mposa ya mosuni. 3. Monguna na biso azali komema balandi na ye na miango ya kolembisa biso mpe ya kobulunganisa biso na makanisi. 1. Luka bandimi baklisto mibale bakemba mpe senga bango bayebisa yo ndenge ya kozwa lisungi ya Nzambe na nzela ya mateya ya bato misusu na etónga. Tuna bango mabunga basáláká ntango bazangaki kolanda toli ya bato misusu. 2. Soki nanu osala bongo te, zwa mokano na nsanza oyo elandi ete okende na losambo moko ntango nyonso bakosangana na poso, epayi wapi okobanda bondeko mpe lisanga mpe okokana, soki Nzambe alingi, okoma moí-lingomba yango. Yeba malamo ete okoki kolenda te to kolendisa baninga soki ozali na lingomba te, na kokambama mpe botosi ya basali na Nzambe mpe bakambi misusu. 3. Komá na lokasa molongó ya bisika oyo okoki kozwa lisungi. Bondela mokolo na mokolo kino poso mobimba ete Nzambe alakisa yo bisika wana, Aloba na nzela ya Liloba na Ye mpe na nzela ya bandimi misusu. 4. Luka bato mibale bakémbá na liloba na Nzambe, monisa bango molongo ya makanisi oyo okomí na monkanda (nkokoso, mabunga, etc) mpe senga bango toli. Yoan. 13 :35
Mpo na liyangani ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
Mosala ya kokokisa na ndako
Made with FlippingBook - Share PDF online